1Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo,mpe bakambi na ye bakokamba na solo.2Moko na moko kati na bango akozalalokola ekimelo liboso ya mopepempe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ;akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe,lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.3Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te,mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.4Mito ya bato oyo bazangi mayeleekozwa boyebi mpe bososoli,bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma kolobanoki-noki mpe malamu.5Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba,mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi ;6pamba te zoba alobaka kaka na bozoba,motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe :atiolaka nzela ya bule,alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe,atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pambampe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.7Misala ya moyimi ezalaka mabe,abongisaka kaka miango ya mabempo na kopengwisa mobola na maloba ya lokutana tango oyo mobola azali na mbeba te.8Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumumpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu.
Basi ya Yelusalemi
9Bino basi oyo bovandaka na kimia,botelema mpe boyoka ngai ;bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te,boyoka makambo oyo nalingi koloba :10Etikali kaka mikolo moke kati na mobu,bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana ;pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka,mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te.11Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ;boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te !Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu,bolata basaki na loketo na bino !12Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko,mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,13mpe mpo na mokili ya bato na ngai ;pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube.Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitokompe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,14pamba te basundoli ndako ya mokonzi ;engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te,Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libelamabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba,mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,15kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo,bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko ;mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonanalokola zamba monene.16Bosembo ekowumela kati na esobe,mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.17Mbuma ya bosembo ekozala kimia :bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.18Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia,na bandako ya malongampe na bisika ya bopemi ya kimia.19Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka,zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.20Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayimpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso.