Banzembo93lin_bib

Yawe akonzaka mpo na libela na libela

1Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ;Yawe alati penza lokumu monenempe amizingeli na nguya.Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.2Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ;seko na seko, ozali.
3Yawe, bibale egangaka !Bibale etombolaka lokito na yango ;bibale etombolaka makelele na yango.
4Yawe azali monene makasi,na bisika ya likolo ;aleki lokito ya mayi minene,mpe bambonge milayi ya ebale monene.
5Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ;bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.