Banzembo87lin_bib

Siona, etima ya bikolo nyonso

1Nzembo ya bana ya Kore.Yawe atia moboko ya Sionana likolo ya bangomba ya bule.2Yawe alingaka bikuke ya Sionakoleka bandako nyonso ya Jakobi.3Oh engumba ya Nzambe,maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !
4Kati na bato oyo bayebi ngai,natangi Rahavi mpe Babiloni.Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tirimpe Kushi ebimela.5Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama :« Bato nyonso babimela awa,mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolonde alendisaka yango. »6Tango Yawe akomakikati na buku ya bikolo,akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango :« Moto songolo abotama kati na Siona ! »7Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka :« Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »