1Libondeli ya Davidi.Yawe, yoka mpe yanola ngai ;pamba te nazali mobola mpe moto akelela.2Batela bomoi na ngai,pamba te nazali moyengebene na Yo.Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo,oyo natiaka elikya kati na Yo.3Oh Nkolo, yokela ngai mawa ;pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !4Nkolo, sepelisa motema na ngai,mosali na Yo,pamba te natombolaka molimo na ngai epai na Yo.5Nkolo, ozali malamu, olimbisaka,otonda na bolingo mpo na bato nyonsooyo babelelaka Yo.6Yawe, yoka losambo na ngai,yoka libondeli na ngai !7Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo,pamba te oyanolaka ngai.8Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo,kati na banzambe ;moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.9Nkolo, bikolo nyonso oyo osalaekoya kogumbama liboso na Yompe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.10Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ;Yo kaka nde ozali Nzambe.11Yawe, lakisa ngai nzela na Yo,mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo.Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.12Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo,na motema na ngai mobimba,nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.13Pamba te bolingo na Yo mpo na ngaiezali monene,mpe okangolaki ngai wuta na mozindoya mboka ya bakufi.14Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai,mpe ngulupa ya bato na kanza bazali kolukakoboma ngai ; batosaka Yo ata moke te.15Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambena mawa mpe na ngolu,osilikaka noki te,otonda na bolingo mpe na boyengebene.16Balola elongi na Yo epai na ngaimpe yokela ngai mawa ;pesa ngai, mosali na Yo, makasimpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo !17Salela ngai elembo ya boboto na Yompo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni !Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.