Banzembo85lin_bib

Yawe asalelaka biso bolamu

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.2Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu,ozongisaki bato ya Jakobi,oyo bazalaki na bowumbu,3olimbisaki mabe ya bato na Yompe olongolaki masumu na bango nyonso.
4Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasimpe okitisaki motema na Yo.5Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso !Longola kanda na Yo na tina na biso !6Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ?Okokangela penza biso kandampo na tango nyonso ?
7Okozongisela biso lisusu bomoi tempo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?8Yawe, talisa biso bolingo na Yo,mpe pesa biso lobiko na Yo !
9Yawe,nakoyoka maloba na Nzambe ;pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Yempe ya bayengebene na Ye.Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.10Solo, lobiko na Ye ezali pene ya batooyo batosaka Yempo ete nkembo na Ye ewumelakati na mboka na biso.11Bolingo mpe boyengebene ekutanaka,bosembo mpe kimia eyambanaka.12Bosolo ebotaka wuta na mabele,mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
13Ye moko Yawe akopesa esengo,mpe mabele na biso ekobota bambuma.14Bosembo etambolaka liboso na Yempe elakisaka nzela oyo ekolekela.