Banzembo84lin_bib

Nazali na posa makasi ya Tempelo na Yo

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.2Yawe, Mokonzi ya mampinga,tala ndenge bisika oyo ovandakaezali kopesa posa !3Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufampo na posa makasi ya lopango ya Yawe !Motema mpe nzoto na ngai ezali kogangaepai ya Nzambe na bomoi.
4Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda,mpe mbilambila esalaka zalaepai wapi etiaka bana na yango,pene ya bitumbelo na Yo,Yawe, Mokonzi ya mampinga,Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.5Esengo na bavandi ya Ndako na Yo !Bakokumisa Yo tango nyonso !
6Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo ;bakendaka na esengo na Tempelo na Yo !7Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka,bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi,mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.8Makasi na bango ebakisamaka tango nyonsokino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe.9Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,yoka losambo na ngai !Nzambe ya Jakobi, yoka ngai !
10Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala !Tala elongi ya mopakolami na Yo !
11Lokola kovanda mokolo mokokati na lopango na Yoeleki kovanda mikolo nkoto mokona esika mosusu,naponaki kotelema na ekoteloya Ndako ya Nzambe na ngaina esika ete navanda kati na bandako ya kapoya bato mabe.
12Pamba te, mpo na biso,Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ;Yawe apesaka ngolu mpe nkembo,aboyaka kopesa eloko moko teepai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.13Yawe, Mokonzi ya mampinga,esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo !