Banzembo82lin_bib

Nzambe asambisaka bakambi ya bikolo

1Nzembo ya Azafi.Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye,azali kokata makambo kati na banzambe.
2Kino tango nini bokokata makambona bosembo tempe bokokotela bato mabe ?
3Bolongisa moto oyo azangi makasimpe mwana etike,bokata likambo ya moto ya mawampe ya mobola ;4bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasimpe na mobola,bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
5Bazangi boyebi mpe bososoli,bazali koyengayenga kati na molili ;miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
6Nalobaki : « Bozali banzambe,bozali bino nyonso banaya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »7Nzokande, bokufaka lokola bato nyonsompe bokweyaka lokola bakambi.
8Nzambe, telema, sambisa mokili ;pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.