Banzembo81lin_bib

Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai…

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.2Boganga na esengoepai ya Nzambe, makasi na biso !Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !3Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike,lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !4Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza,na tango oyo sanza mobimba engengaka,mpo na mokolo ya feti na biso !
5Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele,mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.6Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefitango abundisaki Ejipito.Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :7« Nalongolaki mokumbaoyo ezalaki na mapeka na ye,mpe maboko na ye elongwakina bowumbu ya kosimba bitunga. »8Tango ozalaki koganga mpo na pasi,nakangolaki yo,nayanolaki yo kati na kakeepai wapi nabombamaki,namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.
9Bato na ngai, boyoka ngai !Mpe nakokebisa bino.Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !10Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo,okogumbamela nzambe mosusu te,longola kaka ngai !11Nazali Yawe, Nzambe na yo,oyo abimisaki yo na Ejipito ;fungola malamu monoko na yo,mpe nakotondisa yango.
12Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te,Isalaele aboyaki kotosa ngai.13Mpo na yango, natikaki bango kotambolakolanda baposa ya mitema makasi na bango ;mpe balandaki makanisi na bango.14Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai,soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,15nalingaki mbala moko koyokisabanguna na bango sonimpe kobundisa bayini na bango.16Mpe bato oyo bayinaka Yawebalingaki komikitisa liboso na Ye,mpe etumbu na bango elingaki kowumelampo na libela.17Yawe alingaki koleisa Isalaelebilei ya kitokompe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.