Banzembo74lin_bib

Bileli mpo na kobebisama ya Tempelo

1Nzembo ya Azafi.Oh Nzambe, mpo na nini kosundola bisompo na tango nyonso ?Mpo na nini kongalisa kanda na Yolikolo ya etonga oyo oleisaka ?2Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo,oyo osikola wuta kala,libota oyo okomisa libula na Yo.Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.3Tika ete matambe na Yo ekomakino na bisika oyo ebebi nye !Kati na Esika na Yo ya bule,monguna abebisi nyonso ;4bayini na Yo bagangi lokola nkosi,ata kati na esika oyo okutanaka na biso,batelemisi bendele na bango lokola elembo.5Bazali lokola bato oyo basimbi bipasolampe bazali kokata banzete kati na zamba.6Babuki-buki bililingi nyonsooyo batobola na mabaya,na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango ;7batumbi Esika na Yo ya bule,bakweyisi mpe bakomisi mbindoesika oyo Kombo na Yo evandaka.8Bazalaki komilobela :« Tokopanza yango nyonso ! »Kati na mokili, bazikisi esika nyonsoepai wapi bagumbamelaka Nzambe.9Tozali lisusu komona te bilembo na biso,basakoli bazali lisusu te ;mpe moko te kati na biso ayebi tango bonimakambo oyo ekowumela.10Oh Nzambe, kino tango ninimonguna akofinga Yo ?Boni, akokoba tango nyonsokotiola Kombo na Yo ?11Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima,loboko na Yo ya mobali ?Mpo na nini okangi maboko na Yo ?
12Nzokande, Yo Nzambe,ozali Mokonzi na ngai wuta kala ;Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.13Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo,opanzaki mito ya bilima ya mayi ;14Yo nde opanzaki mito ya Leviatanimpe opesaki yango lokola bileiepai ya banyama ya esobe ;15Yo nde osalaki ete bitima ya mayimpe miluka etiola,mpe okawusaki bibale mpo na libela.16Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ;Yo nde osalaki sanza mpe moyi.17Ezali Yo nde otiaki bandelo nyonso ya mokili,Yo nde osalaki tango ya malilimpe tango ya moyi.
18Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo,ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !19Kokaba te bomoi ya ebenga na Yona monoko ya nyama oyo ezali na nzala,kobosana te mpo na libela bomoi ya babolaoyo bazali bato na Yo !
20Tala lisusu Boyokani na Yo !Pamba te, kati na mokili,bisika ya molili ekomi ebele,etondi na makambo na kanza.21Sala ete moto oyo bazali konyokolaazwa lisusu lokumu !Sala ete mobola mpe moto akelelabakumisa Kombo na Yo.
22Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo !Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yomikolo nyonso !23Kobosana te makelele ya bayini na Yo,mangungu ya banguna na Yo,oyo ezali kaka komata se komata !