1Nzembo ya Azafi.Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele,mpo na bato oyo bazali mitema peto.2Nzokande mpo na ngai,etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka,etikalaki moke ete nakweya,3pamba te nazalaki kolula bato ya lofundutango nazalaki komona kimia ya bato mabe.4Kino na kufa na bango,bazalaka na mitungisi te,nzoto na bango ezalaka sembesembe.5Kati na bango, moko te amonaka pasioyo bato nyonso bamonaka ;babelaka te bokono oyo ezwaka bato.6Yango wana, lolendo ekomalokola mayaka na bakingo na bango,mpe makambo na kanza ekomalokola elamba na bango.7Miso na bango engengakana bilongi etonda na mafuta ;mitema na bango esalaka kakamabongisi ya mabe ;8batiolaka mpe balobaka mabe,bagangelaka minyoko.9Minoko na bango etombokelaka Likolo,mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.10Yango wana bato balandaka bangompe bamelaka maloba na bango lokola mayi.11Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ?Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? »12Tala ndenge bato mabe bazalaka :tango nyonso, bazalaka na mitungisi te,mpe bomengo na bango emataka se komata.13Solo, ezali kaka na pamba ndenabatelaki motema na ngai peto ;ezali kaka na pamba ndenasukolaki maboko na ngaimpo ete nasala mabe te !14Mikolo nyonso, nanyokwamaka ;mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.15Soki nalobi : « Nakoloba lokola bango, »wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.16Tango nakanisaki mpo na koluka kososola,nayokaki pasi na motema17kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambempe nasosolaki ndenge nini bakosuka.18Solo, otielaka bango biloko ya moselu,okweyisaka bango kati na libebi.19Ndenge nini babebisamaka mbala moko,bakomaka na suka,mpe somo elimwisaka bango !20Ndenge ndoto elimwakasoki moto alamuki na pongi,Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bangotango kaka otelemaka.21Tango motema na ngai ezalaki kotombokampe molimo na ngai emitungisaki,22nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba,nakomaki lokola nyama liboso na Yo.23Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo ;osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.24Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo,mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.25Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngaisoki Yo te ?Mpe awa na mokili, nasepela na nanisoki na Yo te ?26Nzoto na ngai ekoki kobeba,mpe motema na ngai ekoki kolemba ;kasi Nzambe azali Libangampe libula na ngai mpo na tango nyonso.27Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ;obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.28Kasi mpo na ngai, ezali malamukozala pene ya Nzambe.Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai,mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.