1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.2Tika ete Nzambe asalela biso ngolumpe apambola biso,tika ete angengisela biso elongi na Ye ;3mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.4Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !5Tika ete bato basepela,tika ete babeta milolo ya esengo,pamba te okambaka bikolo na bosembo,mpe otambolisaka bato awa na mabele.6Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !7Mabele eboti bambuma na yango ;tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.8Tika ete Nzambe apambola biso ;tika ete mokili mobimba etosa Ye !