1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi.2Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ?Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?3Te, ezala kati na mitema na bino,bosalaka mabongisi ezanga bosembo ;botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.4Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango,bapengwaka mpe balobaka lokutawuta na mabumu ya bamama na bango.5Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka,lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te,oyo ekangaka litoyi na yango,6oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na solokampe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.7Nzambe, buka minu na bangokati na minoko na bango ;Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.8Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ;Tika ete bambanzi na bango ebukanatango babetaka batolotolo.9Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe,lokola mwana oyo akomona moyi tempo ete abimi na zemi oyo esopani.10Liboso ete banzungu na bino ekutanana moto ya basende,ezala ya mayi to ya kokawuka,bato mabe akolimwa.11Moto ya sembo akosepela,pamba te akomona Nzambekozongisela bato mabe, mabe na mabe,mpe akotambola kati na makila na bango.12Mpe bato bakoloba :« Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo ;solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »