1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.2Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi,ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.3Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi.Tango nini nakoki kokende,mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?4Butu mpe moyi,mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ;pamba te balobaka na ngai tango nyonso :« Nzambe na Yo azali wapi ? »5Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo,ndenge mpe nasopaka molimo na ngai :Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato,nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe,kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondilokola makelele ya bato oyo bazali na feti.6Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai ?Tia elikya na yo kati na Nzambe,pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.7Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ;yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani,wuta na songe ya ngomba Erimonimpe wuta na ngomba Mitseari.8Mozindo ebendaka mozindotango bambonge na Yo nyonso etombokaka ;Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.9Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ;na butu, nakumisaka Ye na banzembompe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.10Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai :« Mpo na nini obosani ngai ?Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motemampe na se ya minyoko ya monguna ? »11Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasitango bayini na ngai bafingaka ngai,tango balobaka na ngai mokolo mobimba :« Wapi Nzambe na yo ? »12Molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?Tia elikya na yo kati na Nzambe.Nakokumisa Ye lisusu,lobiko mpe Nzambe na ngai.