Banzembo38lin_bib

Losambo ya mobeli

1Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa.2Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yoto kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.3Pamba te makonga na Yo etoboli ngai,mpe loboko na Yo ebeti ngai.4Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ;mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.5Mabe na ngai eleki moto na ngai,ezali kilo makasi epai na ngailokola mokumba ya kilo makasi.
6Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solompo na bozoba na ngai.7Nagumbami, nalembi makasi ;nakomi moto ya mawa mpo na libela.8Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai,eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.9Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ;mobulu ekoti na motema na ngai,nakomi koganga na kolemba te.
10Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ;kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.11Motema na ngai ezangi kimia,makasi na ngai ekomi kosila,nabungisi ata pole ya miso na ngai.12Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngaibakimi pasi na ngai,ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.13Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo,ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe,bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.14Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi ;mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.15Nakomi lokola mokufi matoyioyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.16Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ;oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.17Nalobaki : « Kopesa nzela teete basepela na tina na ngaito bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »18Pamba te nakomi pene ya kokweya,pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.19Solo nandimi mabe na ngai,masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.20Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe,bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.21Bato oyo bazongisaka mabe na bolamubazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
22Yawe, kosundola ngai te ;Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.23Nkolo, Mobikisi na ngai,yaka noki kosunga ngai.