Banzembo35lin_bib

Yawe abatelaka bato ya bolembu

1Nzembo ya Davidi.Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai ;bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.2Kamata nguba ya moke mpe ya monene,mpe telema mpo na kosunga ngai.3Tombola likonga ya monene mpe ya mokempo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai.Loba na ngai :« Nazali lobiko na Yo. »
4Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngaibasambwa mpe bayoka soni ;tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabebazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !5Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawukaoyo mopepe ezali kopumbwisa,tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;6tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselutango anjelu ya Yawe akobengana bango.
7Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai,batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,8tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata,bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngaimpe bakweya kati na mabulu yango !9Nakotonda na esengo kati na Yawempe nakosepela kati na lobiko na Ye.10Mikuwa na ngai nyonso ekoloba :« Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo,mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi,mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
11Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi,bazali kopesa ngai mitunana tina na makambo oyo nayebi te.12Bazali kozongisela ngai mabempo na bolamu oyo nasalaki,mpe kosundola ngai lokola monyokolami.13Nzokande tango bango babelaki,ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei,nazalaki kobondela mpo na bango.14Nazalaki kotambola na mawalokola mpo na moninga to mpo na ndeko ;nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawalokola moto oyo azali kolela mama na ye.15Kasi awa ngai nakomi na pasi,bango bazali kosepela mpe kosangana ;wana ngai nayebi te, bango bazali kosanganampo na kotonga ngai,bazali kolemba te kofinga ngai.16Lokola bapagano, bazali koseka ngai,bazali kolia minu na tina na ngai.
17Yawe, kino tango nini okotala kaka boye ?Kangola ngai wuta na misala na bango ya mabe,bomoi na ngai wuta na manzaka ya bankosi oyo.18Nakokumisa Yo kati na mayangani monene,nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.19Tika ete banguna na ngai basepela tena tina na ngai ;tika ete bayini na ngai na kozanga tinabakanga miso te.20Pamba te balobaka te maloba ya kimia,kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimiamakambo kati na mboka.21Balobaka na mongongo makasi :« Eh ! Eh ! Tomonaki ye ! »
22Yawe, omoni nyonso wana ; kovanda nye te !Nkolo, kozala mosika na ngai te !23Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai !Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai,kota likambo na ngai.24Yawe, Nzambe na ngai,longisa ngai na bosembo na Yo ;kotika bango te kosepela na tina na ngai.25Tika ete bamilobela te :« Ah ! Tala makambo oyo tozalaki koluka ! »Tika ete baloba te : « Tolie ye. »26Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai,bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa !Tika ete bato oyo batombokelaka ngaibalata soni mpe bazala kati na yikiyiki !27Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngaibaganga na esengo mpe basepela ;tika ete balobaka tango nyonso :« Tika ete Yawe anetolama,Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »
28Nakosakola bosembo na Yo,nakokumisa Yo mikolo nyonso.