Banzembo24lin_bib

Yawe akoti na Tempelo

1Nzembo ya Davidi.Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yangoezali ya Yawe.Mokili mpe ezali ya Yawe,elongo na bavandi na yango.2Pamba te ezali Yawe nde atia yangona likolo ya bibale minenempe apikaki yango na likolo ya miluka.3Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?4Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikekompe alapaka ndayi ya lokuta te.
5Yawe akopambola ye ;mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.6Ndenge wana nde ezali,ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo,ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
7Bino bikuke, botombola mitondo na bino !Bino bikuke ya kala, bomitombola !Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !8Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?Ezali Yawe, Elombe ya nguya ;Yawe, Elombe ya bitumba.9Bino bikuke, botombola mitondo na bino !Bino bikuke ya kala, bomitombola !Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !10Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga,nde azali Mokonzi ya nkembo !