Banzembo140lin_bib

Kangola ngai wuta na maboko ya bakosi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.2Yawe, kangola ngaiwuta na maboko ya bato ya misala mabe !Kokutanisa ngai te na bato na kanza.3Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bangompe balukaka bitumba mikolo nyonso.4Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka,bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.5Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ;kokutanisa ngai te na bato na kanzaoyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !6Bato ya lofundu batieli ngai mitambo,batandi basinga ya minyama na nzelampe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.
7Nalobaka na Yawe :« Ozali Nzambe na ngai ! »Yawe, yoka mabondeli na ngai.8Oh Yawe, Nkolo na ngai,ozali makasi ya lobiko na ngai,obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.9Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe,kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.10Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisaekweyela bato oyo bazingeli ngai.11Tika ete makala ya moto esopanela bango !Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto,kati na mabulu ya potopotoepai wapi bakokoka kotelema lisusu te !
12Batioli bakowumela te kati na mokili,pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.
13Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babolampe alongisaka bato oyo bakelela.
14Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo,bato ya alima bakovanda liboso na Yo.