1Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito,tango libota ya Jakobi elongwakina ekolo ya bapaya,2Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe,mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.3Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki,mayi ya Yordani ezongaki na sima,4bangomba epumbwaki lokola bameme,bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.5Ebale monene, nini ezalaki kati na yompo ete okima ?Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?6Bino bangomba, mpo nini bopumbwakilokola bameme ?Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwakilokola bana ya ntaba ?7Mokili, lenga liboso ya Yawe,liboso ya Nzambe ya Jakobi,8oyo abongolaka libanga monene liziba,mpe libanga etima.