1Bokumisa Yawe !Nakokumisa Yawena motema na ngai mobimbakati na likita ya bato ya sembompe kati na mayangani.2Yawe asalaka makambo minene ;bato nyonso oyo balingaka yangobakanisaka yango.3Misala na Ye emonisakankembo mpe lokumu na Ye,mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.4Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye.Yawe atondi na mawampe atalisaka ngolu na Ye.5Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei ;akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.6Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Yena nzela ya misala na Yetango apesaki bango libulaya bato ya bikolo mosusu.7Misala na Ye nyonso elakisakaboyengebene mpe bosembo na Ye ;mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.8Epesama mpo na libela,mpe esengeli kotosa yangona bosembo mpe na bosolo.9Akangolaki bato na Ye,mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango.Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.10Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;bato nyonso oyo batosaka Yawebazali na mayele ya peto.Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.