1Nzembo ya Davidi.2Nzambe, motema na ngai ezali na kimia !Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ;ezali mpe lokumu na ngai.3Lindanda mpe nzenze, bolamuka !Nalingi kolamusa tongo.4Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato,nakoyembela Yo kati na bikolo.5Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola,mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.6Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola,mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !7Bikisa biso na nguya ya loboko na Yompe yanola biso,mpo ete balingami na Yo bakangolama !8Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule :« Nakolonga ! Nakokabola Sishemimpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.9Galadi ezali ya ngai,Manase mpe ezali ya ngai ;Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende,mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.10Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka,Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai.Nazali kobeta milolo ya bitumbampo na kobundisa mokili ya Filisitia. »11Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ?Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?12Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso,Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumbaelongo na mampinga na biso !13Yaka kosunga biso,kangola biso liboso ya moyini !Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.14Elongo na Nzambe,tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ;ezali Ye nde akonyata banguna na biso.