1Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye !Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !2Boyemba mpo na lokumu na Ye,bosanzola Ye na mindule !Botatolaka tango nyonsomisala minene na Ye nyonso !3Bosepela na Kombo na Ye ya bule !Tika ete mitema ya batooyo balukaka Yawe etonda na esengo !4Bomipesa na Yawe.Bosenga makasi na Ye.Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.5Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalakimpe bitumbu oyo apesaki,6bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye ;bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi !7Yawe azali Nzambe na biso,mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.8Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,9boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.10Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobilokola mobeko,epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela,11tango alobaki :« Nakopesa yo mokili ya Kananalokola libula oyo epesameli yo ! »12Na tango wana, bazalaki kakamotango moke ya batompe bapaya kati na yango ;13bazalaki koyengayengalongwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu,longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.14Atikaki moto moko te konyokola bango ;apamelaki bakonzi na tina na bango :15« Bosimba bapakolami na Ngai te,bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »16Abengisaki nzala makasi kati na mboka,azangisaki bango bilei.17Atindaki moto moko liboso na bango :Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu.18Bakangaki makolo na ye na minyololompe batiaki bibende na kingo na ye,19kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki,kino Liloba na Yawe etalisakiete Jozefi alobaki solo.20Mokonzi apesaki mitindoete bafungola ye minyololo,mokambi atikaki ye na bonsomi.21Akomisaki ye nkolo ya ndako na yempe moyangeli ya biloko na ye nyonso,22mpo ete akonza bakambi na yempe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi.23Bongo Isalaele akendeki na Ejipito ;mpe Jakobi avandaki lokola mopayakati na mokili ya Cham.24Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi,mpe akomisaki bango makasikoleka banguna na bango.25Abongolaki mitema ya banguna yangompo ete bayina bato na Yempe banyokola bango makasi.26Atindaki mosali na Ye, Moyize,mpe Aron oyo aponaki.27Na mitindo na Ye Nzambe,basalaki bikamwa kati na Ejipito,misala minene kati na mokili ya Cham.28Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili,mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.29Abongolaki mayi makila,mpe abomaki mbisi na yango.30Mokili na bango etondaki na magorodokino na bashambre ya mokonzi na bango.31Na mitindo na Ye,banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyakina mboka mobimba.32Na esika ya mvula,atindelaki bango mvula ya mabangampe abetisaki kake kati na mokili na bango.33Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi,mpe abukaki banzete ya mboka na bango.34Na mitindo na Ye,mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga teesopanaki,35eliaki matiti nyonso ya mobesukati na mokili na bango,eliaki bambuma ya mabele na bango.36Abomaki bana liboso nyonsokati na mokili na bango,bambuma ya liboso ya makasi na bango.37Abimisaki Isalaele, bato na Ye,elongo na palata mpe wolo ;mpe moko te atiaki tembekati na mabota na bango.38Ejipito esepelaki komona bango kobima,pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.39Atandaki lipata mpo na kobatela bango,mpe moto mpo na kopesa pole na butu.40Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayimpe atondisaki bango na bilei ya likolo.41Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki,etiolaki lokola ebale kati na esobe.42Mpo ete akanisaki elaka ya buleoyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,43abimisaki na esengo bato na Ye,baponami na Ye na koganga ya esengo.44Apesaki bango mabele ya bikolo mosusumpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango45mpo ete babatela mitindo na Yempe batosa mibeko na Ye.Bokumisa Yawe !