1Boyoka makambo oyo Yawe alobi :« Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba,mpe tika ete bangomba mikuse eyokamakambo oyo ozali koloba !2Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te,boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye,pamba te azwi bango na likambompe alingi kosamba na Isalaele.3Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini ?Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini ?4Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipitoto mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ?Boni, ezali te mpo ete natindelaki binoMoyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?5Bato na Ngai, bokanisa nanu makambooyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino,mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori,azongiselaki ye.Bokanisa nanu nzela oyo botambolakilongwa na Sitimi kino na Giligalimpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »6Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawempo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ?Boni, tomema bambeka ya kotumbato bana ngombe ya mibali ya mobu moko ?7Yawe akosepela solosoki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibalito soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ?Boni, topesa solo bana na biso ya libosompo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ?Boni, topesa bana na biso ya mibalioyo bawuti na mikongo na bisompo ete akoka kolongola masumu na biso ?8Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu.Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo :Tambola na bosembo,linga boboto mpe tambolaelongo na Nzambe na yo na komikitisa.
Isalaele akweyisami
9Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba !Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya.Boyoka sango ya etumbu na binona monoko na Ye oyo atindi yango !10Oh libota ya mobulu,boni, nasepela penza komona bomengo na bino,oyo bosili kozwa na nzela ya mabe,Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?11Boni, nazanga penza kopesa etumbuepai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta,mpe oyo azali na libenga etondana bimekelo kilo ya lokuta ?12Bazwi ya libota oyo batondi na kanza,bato ya libota oyo batondi na lokuta,mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.13Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasimpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.14Okolia, kasi okotonda te,pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo.Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te,pamba te nakokaba yango na mopanga.15Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ;okokamola bambuma ya olive,kasi okomipakola mafuta na yango te ;okokamola bambuma ya vino,kasi okomela masanga na yango te.16Lokola obatelaki malako ya Omirimpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi,nakokaba yo mpo ete obebisama,nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ;bongo bokolata soni ya libota na Ngai.