Bileli4lin_bib

Nzembo ya minei : kokakolama ya Siona

1Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango,wolo ya peto enzuluki !Mabanga ya talo oyo ya bule epanzanina basonge ya babalabala nyonso.2Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona,oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto,kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele,oyo mosali mbeki basili kosala !3Ata mbwa ya zamba ezalaka na posaya komelisa bana na yango mabele ;kasi bato na ngai bakomi mitema makasilokola maligbanga kati na esobe.
4Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangamina likolo ya kati ya monoko na ye ;bana mike bazali kosenga bileikasi moto moko te azali kopesa bango yango.
5Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitokobakomi kokufakufa na babalabala ;ba-oyo bakolaki na molato ya motanebakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
6Lisumu oyo bato na ngai basaliezali monene koleka lisumu ya Sodome,engumba oyo ebebisamaki na mbala mokowana moto moko te asembolaki loboko na yempo na kotelemela yango.
7Bana ya bakonzi na bango bazalakikongala koleka mvula ya pembe,pembe koleka miliki ;banzoto na bango ezalaki motanekoleka langi ya motane penza,mpe lolenge na bango ezalakilokola libanga na safiri.
8Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala,bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ;poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa,ekawuki lokola koni.
9Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamukoleka ba-oyo bakufi na nzala :banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala,mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.
10Basi ya mitema malamu balambi,na maboko na bango, bana na bango moko ;bana na bango bakomi bilei na bangokati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.
11Yawe asilikaki makasi koleka ;asopaki kanda na Yempe apelisaki moto kati na Siona,moto oyo ezikisaki miboko na yango.
12Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokilibandimaki te ete banguna mpe bayinibakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.
13Kasi makambo wana esalemakimpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemimpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango,oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
14Bakomaki sik’oyo koyengayengana babalabala lokola bakufi miso,bakomaki mbindo na makilampe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.
15Bato bazali koganga mpe koloba na bango :« Bolongwa awa, bato ya mbindo !Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! »Wana bazalaki kokima mpe kotelengana,bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba :« Bavanda na esika oyo te ! »
16Yawe, Ye moko, apanzi bango,azali kotala bango lisusu te.Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu tempe bayokelaki mibange mawa te.
17Miso na biso elembaki lisusumpo na kozela na pamba lisungi ;wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika,tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungikowuta na ekolo songolo mpe pakala,kasi ebikisaki biso te.
18Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ;boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso.Suka na biso ekomaki pene,mikolo na biso ekomaki ya kotanga,mpo ete tokomaki na suka.
19Bato oyo bazalaki kolanda bisobazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ;bazalaki kolanda biso na likolo ya bangombampe kotiela biso mitambo kati na esobe.
20Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motemaakangami na mitambo na bango ;nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye :« Tokobika bomoi malamuna se ya bobatelami na yekati na bikolo. »
21Edomi, mboka kitoko,movandi ya mokili ya Utsi,sepela, zala na esengo !Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ;okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.
22Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ;Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te.Kasi yo Edomi, mboka kitoko,Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo,mpe akobimisa masumu na yo na polele.