Yobo37lin_bib

1Mpo na yango, motema na ngai ezali kolengampe ezali kobeta makasilokola nde elingi kobima na esika na yango.2Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye,makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.3Azali kotinda yango na mokili mobimba,mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.4Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana,akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ;akokanga mikalikali ya monoko na Ye te,wana mongongo na Ye ezali koyokana.5Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi,Nzambe asalaka bikamwa,asalaka makambo minene,makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.6Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. ›Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. ›7Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonsompo ete moto nyonso ayeba misala na Ye.Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.8Banyama ezongaka na bandako na yangompe evandaka kati na libulu na yango.9Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude,malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.10Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe,mayi ebongwanaka libangampe bitima ya mayi ekondaka.11Atondisaka mapata na mayi,mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.12Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonsompo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.13Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokilito mpo na kopambola yango.
14Yoka, Yobo !Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.15Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata,mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ?16Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ?Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.17Bilamba na yo ezali na moto,nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.18Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotandalikolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasilokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ?
19Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ;tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.20Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba ?Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango ?21Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole ;ebombami kati na mapata.Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.22Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor.Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.23Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,tokoki te kokoma esika Ye azali ;azali monene na nguya mpe na solo ;azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.24Yango wana bato basengeli kokumisa Ye,kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya batooyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »