1Yobo azongisaki :2« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ;bino nyonso bozali babondisi mabe.3Kino tango nini bokotika kolobamaloba ya pamba-pamba boye ?Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?4Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino,soki bozalaki na esika na ngai,nakokaki kobimisa maloba ebelempe koningisa moto mpo na bino.5Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino,mpe bibebu na ngai elingaki koninganampo na kokitisa bino mitema kati na pasi.6Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ;bongo soki nakangi monoko nde pasi yangoelongwe na bomoi na ngai ?7Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai !Obebisi ndako na ngai nyonso,8ofini-fini ngai makasi penza,mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatolampe kofunda ngai na miso ya bato !9Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai,okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabempe kotala ngai na miso mabelokola nde nazali monguna na yo.10Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai,bakomi kobeta ngai bambata na matamampo na kosambwisa ngai,bango nyonso basaleli ngai likita.11Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabempe abwaki ngai na manzaka na bango.12Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai,kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai,akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ;13makonga na Ye ezingeli ngai,atoboli-toboli libumu na ngai,mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.14Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngaimpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.15Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngaimpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.16Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane,mpe molili ezingeli miso na ngai.17Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te,mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.18Oh mabele, kozipa makila na ngai te !Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !19Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo,molobeli na ngai azali na Lola.20Baninga na ngai bakomi koseka ngai ;nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.21Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobelamoto liboso ya Nzambendenge moto alobelaka moninga na ye ?22Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila,mpe nakokende na ngai na nzelaoyo bato bazongaka lisusu te.