Jeremi6lin_bib
1« Bino bato ya Benjame,bokima mpo na lobiko na bino !Bobima na Yelusalemi !Bobeta kelelo na Tekoa !Botombola bendele kati na Beti-Akeremi !Pamba te pasi mpe kobebisama ya somoekobimela na nor.2Nakobebisa Siona, mboka kitoko,oyo ezali penza kitokolokola elenge mwasi ya kitokompe ya nzoto sembesembe.3Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bangobakobundisa yango,bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango ;bongo moko na moko akoyeisa bibwele na yena esika oyo ye akozwa.4Bomibongisa mpo na kobundisa yango !Botelema, tika ete tobundisa yango na midi !Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esilimpe molili ya pokwa ezali koya.5Boye, totelema ! Tika ete tokota kati na yango na butu,tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi ! »6Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombamazingazinga ya Yelusalemi !Engumba oyo esengeli kozwa etumbu,pamba te etondi na makambo mabe !7Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi,ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe.Sango moko kaka ezali kotambola kuna :sango ya mobulu mpe ya kobebisama ;tango nyonso liboso na Ngai,kaka minyoko mpe bapota.8Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo,noki te nakomikomisa mosika na yompe nakokomisa mokili na yo esobe,mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »9Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikalindenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka ;bolekisa lisusu maboko na binona likolo ya bitape ya banzete ya vinolokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »10Naloba lisusu na nanimpe nakebisa penza nani ?Nani akoyokela ngai ?Matoyi na bango ekangama ;yango wana bakokaka koyoka te.Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango,basepelaka na bango na yango te.11Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawempe nazali kokoka lisusu te kokanga motema.« Sopa yango na bana mike kati na babalabalampe na lisanga ya bilenge mibali ;ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko,ezala mikolo to mibange.12Tango nakosembola loboko na Ngaimpo na kotelemela bavandi ya mboka,nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango,epai ya bato mosusu, »elobi Yawe.13« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike,batondi na lokoso ya mbongo,kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe :bango nyonso bazali kotambola na lokuta.14Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolompe bazali koloba : ‹ Makambo nyonso ezali malamu,nyonso ezali kotambola malamu ! ›Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.15Boni, bazali penza koyokelamakambo na bango ya nkele soni te ?Te, bazali na bango koyoka ata soni te ;bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te.Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso,bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, »elobi Yawe.16Tala liloba oyo Yawe alobi :« Botelema na esika oyo nzela ekutana,botuna nzela ya kalampe esika oyo nzela ya malamu ezali,bongo bolanda yango mpe bokozwa kimiampo na mitema na bino.Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›17Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino :‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! ›Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. ›18Yango wana, bino bikolo, boyoka !Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango.19Oh mabele, yoka !Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo,ekozala lifuti ya mabongisi na bango,pamba te bayokaki mongongo na Ngai tempe babwakaki Mobeko na Ngai.20Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Sabato na matiti ya solo kitokooyo ewuti na mboka ya mosika ?Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te,mpe nandimaka makabo na bino te. »21Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :« Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ;batata mpe bana na bango bakobeta mabakumpe bakokweya nzela moko,bazalani elongo na baninga bakokufa. »22Tala liloba oyo Yawe alobi :« Tala, mampinga moko ya basodaezali koya longwa na mokili ya nor ;ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumbawuta na basuka ya mabele.23Basimbi matolotolo mpe makonga,bazali mitema mabe mpe bazanga mawa,bazali koganga lokola makelele ya ebale monene,bamati likolo ya bampunda,batandami na milongo lokola basodampo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »24Tango toyokaki sango na tina na bango,tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki bisompe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.25Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te,pamba te monguna asimbi mopanga,bongo somo makasi ezali bisika nyonso.26Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basakimpe bolala na putulu,bosala matanga lokola motooyo akufisi mwana na ye se moko.Bolela na mawa,pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.27« Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngailokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende,mpo ete okoka kotala malamumpe omeka ezaleli na bango.28Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi,bayebi kaka kotonga.Bazali lokola bronze mpe ebende,bango nyonso bazali kaka babebisi.29Epepelo ezali kopelisa moto makasi,mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto ;kasi bazali na bango kaka konyangwisaebende yango na pamba,pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.30Babengaka bango palata babwaka,pamba te Yawe asundola bango. »
No translations available.