1Tala, loboko na Yawe ezali mokuse tempo na kobikisa,litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka !2Kasi ezali bambeba na bino nde ekabolibino na Nzambe na bino,ezali masumu na bino nde esaliete abombela bino elongi na Yempo ete ayoka bino te.3Pamba te maboko na bino ebebi na makila,mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ;bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta,mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.4Moko te azali kofunda makambo na bosolo,moko te azali kosamba na bosembo ;bazali kotia mitema na makambo ezanga tinampe bazali koloba lokuta ;na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabempe bakokisaka yango na misala na bango.5Bazali kopasola maki ya etupampe bazali kotonga ndako ya lifofe .Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa ;mpe, soki apasoli liki moko,ekobimisa etupa.6Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te,misala na bango ekobomba bango te ;misala na bango ezali misala mabe,mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.7Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe,mpe bazalaka mbangu mpo na kosopamakila ya moto oyo asali mabe te.Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ;kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.8Bayebi nzela ya kimia te,mpe bosembo ezali na nzela na bango te ;bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka,moko te oyo akotambola na nzela yangoakotikala koyeba kimia.9Yango wana bosembo ezali mosika na biso,mpe solo ezali kokomela biso te ;tozali kozela pole,kasi nyonso ezali kaka molili ;toluki moyi,kasi tozali kaka kotambola na molili.10Tozali kosimbasimba mirmpo na kotambola lokola bakufi miso,tozali kobanga kotambolalokola bato bazanga miso ;tozali kobeta mabaku na moyi makasilokola nde tozali na butu makasi,tozali na nzoto kolongonokasi tokomi lokola bakufi.11Biso nyonso tozali konguna-ngunalokola bangombolo ,mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga ;tozali koluka bosembo,kasi tozali komona yango te,tozali koluka lobiko,kasi ekimi mosika na biso !12Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo,mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ;masumu na biso ezali liboso na bisompe toyebi malamu bambeba na biso :13kotomboka mpe kowangana Yawe,kopesa Nzambe na biso mokongo,kosala mabongisi ya konyokola batompe kotombokisa bato,kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.14Boye, bosembo ezongi sima,mpe bosolo etelemi mosika ;pamba te solo ekweyi na balabala,mpe bosembo elongi kokota te.15Solo ezali komonana lisusu na esika moko te ;bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe.Yawe amoni yango mpe asepeli teete kosambisa na bosembo ezali te.16Amoni ete ezali ata na moto moko te,akamwe ete ata molobeli moko te azali.Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko,mpe bosembo na Ye elendisi Ye.17Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo,mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ;alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala,mpe amizipi zuwa lokola kazaka.18Akofuta moto na moto kolanda misala na ye :kanda makasi epai ya bayini na Ye,mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ;akopesa na bisanga lifuti na yango.19Longwa na ngambo ya weste,bato bakobanga Kombo ya Yawe ;mpe longwa na ngambo ya este,bato bakokumisa nkembo na Ye ;pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki,oyo pema ya Yawe ekomema.20« Mpo na Siona,mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi,oyo bakobongwana na masumu na bango, »elobi Yawe.21« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.