1Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi :Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki,Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki,solo, ebebisamaki kaka na butu moko !Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ;solo, ebebisamaki kaka na butu moko !2Bato ya Diboni bazali komatana bisika na bango ya bule,na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba,mpo na kolela ;Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba.Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.3Balati-lati basaki na babalabala,bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandakompe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;bazali penza kosopa mpinzoli ebele.4Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi,mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ;yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe kogangampe mitema na bango ebukani.5Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi,banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari,kino na Egilati-Shelishiya ;bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ;mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matangampo na kobebisama na bango.6Mayi ya Nimirimi ekawuki,bongo matiti mpe esili kokawuka,matiti ya mobesu eziki-ziki nyonsompe matiti ya kitoko ezali lisusu te.7Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwakimpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.8Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ;koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi,mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.9Mayi ya Dimoni etondi na makila,kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni :nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.