Ezayi10lin_bib

1Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo,na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !2Bapimelaka bato pamba bosembompe babotolaka makoki ya babola,mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibalimpe ya bana bitike.3Bokosala nini na mokolo ya kosambisama,tango pasi ekowuta mosika ?Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ?Esika nini bokobomba bomengo na bino ?4Eloko kaka bokotikala na yango :kokitisa elongi na se elongo na bato ya bolokoto kokufa elongo na bato oyo babomi.Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.

Nzambe asambisi Asiri

5Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ;nzete oyo ezali na loboko na yeezali nde esalelo ya kanda na Ngai !6Natindi ye mpo ete atelemelaekolo oyo eyebi Yawe tempe bato oyo bapesaka Ngai kanda,mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bangompe anyata bango lokola potopoto ya balabala.7Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te,akanisaka yango bongo te ;akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.8Azali koloba :« Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonsondenge moko na bakonzi te ?9Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ?Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ?Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?10Soki loboko na Ngai esukisaki bikolooyo esambelaka banzambe ya bikeko,bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebelekoleka Yelusalemi mpe Samari,11nakokoka te penza kosala Yelusalemielongo na banzambe na yango ya bikekondenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko ? »12Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.13Pamba te azalaki koloba :‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonsona makasi mpe na bwanya na ngai moko,pamba te nazali mayele ;napusaki bandelo ya bikolo,nabotolaki bomengo na bango lokola elombe,nalongaki bakonzi na bango.14Loboko na ngai ekamataki bomengo na bangondenge bakamataka zala ya ndeke ;mpe ndenge bato balokotaka maki batika,ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba :moko te eningisaki lipaputo efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »
15Boni, epasola ekoki solo komimatisaliboso ya moto oyo asalelaka yango ;si ya mabaya ekoki solo komikumisaliboso ya moto oyo asalelaka yango ?Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yangoto etape ya nzete kotombola nzete na yango ?16Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,akotindela basoda na ye ya mbingabokono oyo ekondisaka nzoto.Na se ya nkembo na Ye,bakopelisa moto lokola fulu ya moto.17Pole ya Isalaele ekokoma moto,Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto ;kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisabasende mpe banzube ya Asiri,18akozikisa nye bazamba na yango ya minenempe bilanga na yango ya kitokondenge mobeli akondaka.19Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete mokeoyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango.

Batikali ya Isalaele

20Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango ; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele.21Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya.22Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.23Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba.24Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona,bozala na somo te ya bato ya Asirioyo bazali kobeta bino fimbumpe kotombola nzete mpo na kobeta binondenge bato ya Ejipito bazalaki kosala.25Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosilampe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bangompo na kobebisa bango. »26Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.27Na mokolo wana,bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na binompe na ekangiseli na bakingo na bino.Tango mokumba yango ekolongwa,ekotika esika na bomengo.28Tala bango wana bazali koya na Ayati,bazali koleka na lubwaku ya Migironi,babombi biloko na bango na Mikimasi.29Baleki kati na bangomba mpe balobi :« Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. »Bato ya Rama bakomi kolenga na somo,mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.30Oh bato ya Galimi, boganga makasi !Oh Layisi, sala keba !Oh engumba Anatoti, mawa na yo !31Bato ya Madimena bakimi,bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo ;32Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi,bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko,mpe na ngomba moke ya Yelusalemi.
33Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,akokata bitape ya banzete na nguya monene,akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi,akokomisa yango mikuse.34Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba :Libani ekokweya liboso ya Elombe.