1Efrayimi azingeli Ngai na lokuta,mpe libota ya Isalaele, na kokosa ;kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe,elongo na Mosantu ya solo.2Efrayimi aliaka mopepe ;mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ;mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe.Asalaka boyokani elongo na Asirimpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.3Yawe alingi kosamba na Yuda ;akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na yempe akofuta ye kolanda misala na ye.4Na libumu ya mama na bango,akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe ;tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.5Abundaki na anjelu mpe alongaki,alelaki mpe asengaki ngolu na ye.Jakobi akutanaki na ye na Beteli,mpe ezali kuna nde asololaki na ye.6Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga,Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.7Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ;batela bolingo mpe bosembompe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.8Bato ya Kanana basalelakaemekelo kilo ya lokuta,balingaka kaka kokosa.9Efrayimi alobaka na lolendo nyonso :« Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi.Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngaina mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »10Nazali Yawe, Nzambe na yo,oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ;nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapolokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.11Nalobaki na nzela ya basakoli,napesaki bango bimoniseli ebelempe nalobaki na masese na nzela na bango.12Lokola Galadi etondi na mabe,ekokoma eloko pambampo ete bato na yango babonzakibangombe ya mibali na Giligali ;mpe bitumbelo na bango ekobukamampe ekokoma mipiku ya mabangakati na banzela ya mikala ya bilanga.13Jakobi akimaki na mokili ya Siri ;Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ;mpe mpo na kobala mwasi yango,andimaki kokoma mobateli bibwele.14Yawe asalelaki mosakolimpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito,abatelaki ye na nzela ya mosakoli.15Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi,yango wana, Nkolo na ye akotangela yengambo ya makila oyo asopakimpe akofuta ye kolanda mabe na ye.