Kobima25lin_bib
Makabo mpo na kotonga Mongombo
1Yawe alobaki na Moyize :2— Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.3Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango :wolo, palata mpe bronze,4bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,5baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, banzete ya akasia,6mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ;7mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.8Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.9Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.