1Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki :« Buka makonzi ya Tempelompo ete ndako mobimba eninganampe ekweyela bato nyonso na mito.Bato oyo bakotikala,nakoboma bango na mopanga.Moko te akokima, moko te akobika.2Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi,loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ;soki bakimi na Lola,nakokitisa bango na se.3Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli,nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ;soki babombami Ngai na se ya ebale monene,nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.4Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu,nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna.Miso na Ngai ekozala likolo na bangompo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.5Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele,mabele eninganaka,mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga,mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nilimpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.6Yawe atonga ndako na Ye kati na Lolampe atia miboko na yango na mabele ;abengaka mayi ya ebale monenempe asopaka yango na etando ya mabele.Kombo na Ye ezali : Yawe.
Etumbu ya bato nyonso ya masumu
7Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani tena bato ya mokili ya Kushi ? »elobi Yawe.« Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito,bato ya Filisitia wuta na Kreti,bato ya Siri wuta na Kiri ?8Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ;nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele.Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, »elobi Yawe.9« Pamba te nakopesa mitindompe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonsondenge bayungolaka ble ;bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.10Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngaibakokufa na mopanga,ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala tekozwa to kokomela biso ! ›
Tango ya lobiko
11Na mokolo wana,nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya,nakobamba madusu na yango,nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukanampe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,12mpo ete bakoka kozwandambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki,mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, »elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.13« Mikolo ezali koya, »elobi Yawe,« mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki,mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki.Vino ya sika ekobota na bangomba milayimpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.14Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai,oyo bakendeki na bowumbu,mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamakimpe bakovanda kati na yango.Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango,bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.15Nakolona bango na mabele na bango moko,mpe bakotikala kopikola bango lisusu tena mabele oyo napesaki bango, »elobi Yawe, Nzambe na yo.