1 Masolo ya Kala5lin_bib
Libota ya Ribeni
1Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso.2Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.3Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.4Bakitani ya Joeli : Shemaya, mwana mobali ya Joeli ; Gogi, mwana mobali ya Shemaya ; Shimei, mwana mobali ya Gogi ;5Mishe, mwana mobali ya Shimei ; Reaya, mwana mobali ya Mishe ; Bala, mwana mobali ya Reaya ;6Beera, mwana mobali ya Bala mpe mokambi ya bato ya Ribeni, oyo Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, amemaki na bowumbu.7Tala bandeko ya Beera kolanda etuka na bango ndenge bakomami na molongo ya botata na bango : mokambi Yeyeli, Zakari ;8Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli.Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni.9Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi.10Na tango Saulo azalaki mokonzi, babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango. Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi.