1 Masolo ya Kala3lin_bib
Bana mibali ya Davidi
1Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron :Mwana ya liboso ezalaki Aminoni, mwana mobali ya Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; ya mibale, Daniele, mwana mobali ya Abigayili, moto ya Karimeli ;2ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri ; ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite ;3ya mitano, Shefatia, mwana mobali ya Abitali ; mpe ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi na ye, abotaki.4Bango nyonso motoba bazalaki bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron, mboka mokonzi, epai wapi akonzaki mibu sambo na ndambo.
Davidi akonzaki wuta na Yelusalemi mibu tuku misato na misato.5Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi :
Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.6Babotelaki ye lisusu bana oyo : Yibari, Elishama, Elifeleti,7Noga, Nefegi, Yafia,8Elishama, Eliyada mpe Elifeleti. Bango nyonso bazalaki libwa.9Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.10Salomo azalaki tata ya Roboami, Roboami azalaki tata ya Abiya, Abiya azalaki tata ya Asa, Asa azalaki tata ya Jozafati,11Jozafati azalaki tata ya Yorami, Yorami azalaki tata ya Akazia, Akazia azalaki tata ya Joasi,12Joasi azalaki tata ya Amatsia, Amatsia azalaki tata ya Azaria, Azaria azalaki tata ya Yotami,13Yotami azalaki tata ya Akazi, Akazi azalaki tata ya Ezekiasi, Ezekiasi azalaki tata ya Manase,14Manase azalaki tata ya Amoni, Amoni azalaki tata ya Joziasi,15Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo : Yoanani, mwana na ye ya liboso ; Yeoyakimi, ya mibale ; Sedesiasi, ya misato ; Shalumi, ya minei.16Bana mibali ya Yeoyakimi : Yekonia mpe Sedesiasi.