1Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :2« Nakosilisa kobebisa biloko nyonsooyo ezali kati na mokili, »elobi Yawe,3« solo, nakoboma ezala bato to banyama,ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ;nakolongola, na mokili, bato mabempe biloko oyo ebetisaka bato mabaku »elobi Yawe.
Etumbu ya mokili ya Yuda
4« Nakosembola loboko na Ngaimpo na kopesa mokili ya Yudampe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ;nakosilisa koboma, na esika oyo,nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Balaelongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano,oyo basalelaka banzambe ya bikeko :5bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandakompo na kosambela mampinga ya likolo,bato nyonso oyo bagumbamakana kolapa ndayi na Kombo na Yawempe na kombo na nzambe Moloki,6bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo,oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.7Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe,pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene !Yawe abongisi mbeka,abulisi babengami na Ye.8Na mokolo ya mbeka ya Yawe,nakopesa etumbu epai ya bakambi,epai ya bana mibali ya mokonzimpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.9Na mokolo wana,nakopesa etumbu epai ya bato nyonsooyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo,bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikekona makambo ya kanza mpe na lokuta.10Na mokolo wana, »elobi Yawe,« koganga makasi ekoyokanawuta na Ekuke ya Bambisi,kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sikampe lokito monene wuta na bangomba mikuse.11Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela,pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa,mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !12Na tango wana,nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda,nakopesa etumbu epai ya bato nyonsooyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka :‹ Yawe asalaka na Ye eloko te,ezala ya malamu to ya mabe. ›13Bakobotola bango bomengo na makasimpe bakobuka bandako na bango ;bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ;bakosala bilanga ya vino,kasi bakotikala komela vino na yango te. »
Mokolo ya Yawe
14Mokolo monene ya Yawe ekomi pene,solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza.Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ;ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.15Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi,mokolo ya pasi mpe ya somo,mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama,mokolo ya butu mpe ya molili makasi,mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,16mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumbampo na kobundisa bingumba batonga makasimpe bandako milayi oyo batonga makasi.17Nakotindela bato pasi ya makasi :bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga,pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ;bakopanza makila na bango lokola putulumpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.18Na mokolo ya kanda na Yawe,ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te.Na moto ya zuwa na Ye,mokili mobimba ekozikisama,pamba te akosukisa na mbalakatabavandi nyonso ya mokili.