1Liloba na Yawe.Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki,ekowumela na engumba Damasi,pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaeleezali kotalela Yawe.2Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati,na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi,na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele.3Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi,emibombeli palata ebele lokola putulumpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.4Kasi Nkolo akobotola yango,akosukisa nguya na yango na ebale monenempe ekozika na moto.5Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ;engumba Gaza ekokoma na somo makasi,ndenge moko mpe engumba Ekroni ;pamba te elikya na yango ekosila.Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yangompe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.6Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi,mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.7Nakolongola makila na minoko na bango,mpe bilei ya mbindo na minu na bango ;kasi ba-oyo bakotikala bakokomabato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ;mpe bato ya engumba Ekroni bakokomalokola bato ya Yebusi.8Nakobundela ndako na Ngailiboso ya mampinga ya basoda ya nguya ;monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi,pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
Koya ya mokonzi ya kimia
9Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi !Yelusalemi, mboka kitoko,ganga penza na esengo !Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,azali sembo mpe molongi,atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane,na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.10Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi,bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi,mpe matolotolo ya bitumba ekobukana.Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso,bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu,longwa na ebale kino na basuka ya mabele.11Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo,nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.12Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi,bino bakangami oyo botondi na elikya,pamba te nazali koloba na bino sik’oyo :« Nakozongisela bino mbala mibalebiloko oyo bobungisaki. »13Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda,natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi.Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibalimpo ete batelemela bana mibali ya Yavanimpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.14Yawe akomimonisa epai na bango,mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali.Nkolo Yawe akobeta kelelompe akotambola kati na mopepe makasi.15Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango.Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga,bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga,bakotonda lokola kopo ya makilaoyo basopaka na basonge ya etumbelo.16Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango,akobikisa bangondenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye.Bakongenga makasi kati na mabele na Yelokola mabanga ya talo.17Bakozala bato ya esengo,bakokoma kitoko makasi.Ble ekopesa bilenge mibali makasimpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.