Loyembo ya Salomo8lin_bib
1Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobalioyo amelaki mabele ya mama na ngai !Soki nakutanaki na yo na libanda,nalingaki kopesa yo beze,mpe moto moko te alingaki kotiola ngai.2Nalingaki komema yompe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai,mpo ete oteya ngai bolingo.Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko,oyo basali na bambuma ya grenade.3Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai,mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto !4Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino :bolamusa Bolingo na ngai teliboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.