1Butu mobimba, na mbeto na ngai,nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka ;naluki ye, kasi namonaki ye te.2Esengeli na ngai kolamuka sik’oyompe kobima libanda ya engumba,na balabala na yango mpe na bisikaoyo bato nyonso bakutanaka ;nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka.Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.3Bakengeli bamonaki ngaitango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba.Natunaki bango :« Bomoneli ngai te mobalioyo motema na ngai elingaka ? »4Tango kaka nalekaki bango,mbala moko, namonaki mobalioyo motema na ngai elingaka.Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende.Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai,na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
Elenge mobali
5Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli binona kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga :Bolamusa Bolingo na ngai teliboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Elenge mwasi
6Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata,azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa,oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitokoya moto ya mombongo ?7Tala ! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo !Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele,tuku motoba nde bamemi yango.8Bango nyonso balati mipanga ;bango nyonso bazali makasi na bitumba,baselingwa mpo na bitumba ya butu.9Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi ;basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.10Basalaki bisimbelo na yango na palata,mokongo na yango, na wolo.Balatisaki evandelo na yangobilamba ya motuya ya langi ya motane makasi.Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisakikati na yango na motema ya bolingo.11Bino bilenge basi ya Siona, bobima ;botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole,motole oyo mama na ye alatisaki yena mokolo ya libala na ye,na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.