1Nzembo.Boyembela Yawe nzembo ya sika,pamba te asalaka makambo ya kokamwa !Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe,alongaki.2Yawe atalisaki elonga na Ye,amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.3Akanisaki bolingo mpe bosembo na Yempo na libota ya Isalaele.Kino na suka ya mokili,elonga ya Nzambe na biso emonanaki.4Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko,boyemba banzembo ya esengompe bobeta mindule !5Bobetela Yawe lindanda,boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !6Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi,na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.7Tika ete ebale monene elongo na nyonsooyo ezali kati na yango,mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !8Tika ete bibale ebeta mabokompe bangomba nyonso eganga na esengo9liboso ya Yawe, pamba te azali koyakosambisa mabele !Akokata makambo na yango na bosembo.