Banzembo92lin_bib

Ezali malamu kokumisa Yawe

1Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.2Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawempe koyemba mpo na lokumu ya Kombo naYo-Oyo-Oleki-Likolo !3Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo,na tongo,mpe boyengebene na Yo, na butu,4na lindanda ya basinga zomimpe na nzenze !5Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai !Nagangaka na esengo liboso ya misalaya maboko na Yo.6Yawe, misala na Yo ezali minene,mpe makanisi na Yo ezali mozindo !
7Moto ya kilikili ayebaka te,mpe zoba asosolaka eloko moko te.8Tango bato mabe bakolaka lokola matiti,mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka,ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
9Kasi Yo, kuna na likolo,ozali Yawe mpo na libela.10Yawe, banguna na Yo,banguna na Yo bakokufa penza ;bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
11Okomisi ngai makasi lokola mpakasa,opakoli ngai mafuta ya sika.12Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai,mpe matoyi na ngai ekomi koyokabanguna na ngai nyonso, oyo bamibongisampo na kosala ngai mabe.
13Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila,bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.14Lokola bapikama ngwikati na Tempelo ya Yawe,bamonaka bolamu kati na lopangoya Nzambe na biso.
15Ata bakomi mibange, babotaka kaka,bazalaka kaka makasi mpe kitoko,16basakolaka : « Yawe azali alima,azali Libanga na biso ;kati na Ye, mabe ezali te ! »