Banzembo83lin_bib

Telemela banguna na Yo

1Nzembo ya Azafi.2Oh Nzambe, kovanda nye te !Nzambe, kokanga monoko na Yo te,kotikala kimia te !3Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka ;tala ndenge bayini na Yo bazali kotombolamito na bango !4Bazali kosalela bato na Yo likita,kokanela bato oyo obatelaka.5Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonsompo ete ekolo na bango ezala lisusu te,mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
6Basangani mpe bayokani,basali boyokani mpo na kotelemela Yo :7bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli,bato ya Moabi mpe bato ya Agari,8Gebali, Amoni mpe Amaleki,bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.9Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bangompo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
10Sala bango ndenge osalaki Madiani,ndenge osalaki Sisera mpe Yabini,kuna na mayi ya Kishoni.11Babebisamaki na Eyini-Dori,bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.12Sala bato na bango ya lokumundenge osalaki Orebi mpe Zeebi ;mpe sala bakambi na bangondenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna13oyo bazalaki koloba :« Tobotola mabele ya Nzambe ! »
14Nzambe na ngai, balola bangolokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.15Ndenge moto ezikisaka zamba,ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,16landa bango na nzela ya mopepe na Yompe bangisa bangona nzela ya mopepe makasi na Yo !
17Yawe, tondisa bilongi na bango na sonimpo ete baluka Kombo na Yo !18Tika ete soni mpe somo makasi elata bangompo na libela !Tika ete bakufa na soni !19Tika bayeba ete Yo,oyo Kombo na Yo ezali Yawe,ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolokati na mokili mobimba !