Banzembo80lin_bib

Eh Yawe, kino tango nini ?

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.2Mobateli ya Isalaele,Yo oyo otambolisaka Jozefilokola etonga ya bameme, yoka ;Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezalikati na basheribe, mimonisa3liboso ya Efrayimi, ya Benjamempe ya Manase.Monisa nguya na Yompe yaka kobikisa biso !
4Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki,ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
5Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,kino tango nini okotombokelamabondeli ya bato na Yo ?6Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya misompe olangwisaki bango na kopoetonda na mpinzoli ;7okomisaki biso eloko ya kotiolampo na bazalani na biso,mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
8Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,sala ete tozongela ndenge tozalaki,ngengisela biso elongi na Yompo ete tobika.
9Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito,olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.10Obongiselaki yango mabelempo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.11Elili na yango ezipaki bangomba,bitape na yango ezalakilokola banzete minene ya sedele.12Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene,mpe mito na yango ya sika kino na ebale.
13Mpo na nini otoboli madusukati na bamir na yango ?Tala ndenge baleki nzela bazali kobukabambuma na yango !14Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango,mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.15Zongela biso lisusu,Nzambe-Na-Nguya-Nyonso !Wuta na likolo, tala mpe mona !Senzela mpo na nzete oyo ya vino !16Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki,batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
17Bakati nzete na Yo ya vinompe batumbi yango na moto ;tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo !18Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzioyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali,mpe na likolo ya mwana na motooyo Yo moko okomisaki makasi.19Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ;zongisela biso lisusu bomoi,mpe tokobelela Kombo na Yo.
20Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,sala ete tozongela ndenge tozalaki,ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.