Banzembo79lin_bib

Yelusalemi epanzani

1Nzembo ya Azafi.Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapayabakoti na makasi kati na libula na Yo,bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo,mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !2Bapesi bibembe ya basali na Yo lokola bileiepai ya bandeke ya likolo,mpe bibembe ya bayengebene na Yoepai ya banyama ya zamba ;3basopi makila na bango lokola mayizingazinga ya Yelusalemi,mpe moto ya kokunda bango azalaki te !
4Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli bisobazali kofinga biso,mpe tokomi lokola eloko ya lisekina miso na bango !5Kino tango nini, Yawe,okokangela biso kanda ?Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?
6Sopela bikolo oyo eyebi Yo tempe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te,kanda makasi na Yo ;7pamba te babebisi Jakobimpe bapanzi mokili na ye.
8Kotangela biso te masumu na biso ya kala,kokangela biso motema te, yokela biso mawa,pamba te tokomi na suka !9Nzambe Mobikisi na biso, sunga bisompo na lokumu ya Kombo na Yo,kangola biso mpe limbisa masumu na bisompo na Kombo na Yo !
10Mpo na nini bikolo eloba :« Nzambe na bango azali wapi ? »Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayebaete ozongiseli bango mabe na mabe,mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.
11Tika ete kolela ya bakangami kati na bolokoekoma liboso na Yo !Na nguya monene na Yo,bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa !12Oh Nkolo, zongisela bikolooyo ezingeli biso,kotiola oyo batiolaki Yo ;zongisela bango mbala sambo.13Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka,tokosanzola Yo tango nyonso ;mpe na bikeke nyonso,tokosakola lokumu na Yo.