1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.2Nzambe ayebani kati na Yuda ;Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.3Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi ;mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.4Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi,banguba, mipangampe bibundeli nyonso ya bitumba.5Ozali kongenga lokola mwinda,otonda na lokumu koleka bangombaya babotoli bomengo ya bitumba.6Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki,balalaki pongi na bango ya suka ;basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.7Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo,bato oyo babundaka likolo ya bampundaelongo na bampunda bakweyi na somo.8Solo, ozali somo !Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?9Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yoeyokana na matoyi ya bato ;mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia10tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisampe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.11Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo,mpe olataka kanda ya batikali.12Epai ya Yawe, Nzambe na bino,bopesa bilaka mpe bokokisa yango.Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Yebamemela Nzambe ya somo makabo !13Abukaka lolendo ya bakambi,mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.