Banzembo71lin_bib

Na kimobange na ngai, kosundola ngai te

1Yawe, ozali ebombamelo na ngai ;kondima te ete nayoka soni !2Na bosembo na Yo, kangola mpe bikisa ngai.Yoka ngai mpe bikisa ngai.3Zala mpo na ngai ekimelo ya libangaepai wapi nakoki kokende tango nyonso.Ozwaki mokano ya kobikisa ngai,pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.4Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe,na maboko ya batomboki mpe bato na kanza.5Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ;wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.6Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ;Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai.Nakokumisa Yo tango nyonso.7Nazali likamwisi mpo na bato ebele ;ozali ebombamelo na ngai ya makasi.8Tika ete monoko na ngai etondana masanzoli mpo na lokumu na Yo ;tika ete etatolaka tango nyonsokongenga ya nkembo na Yo.
9Kobwaka ngai te awa nakomi mobange,kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.10Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabena tina na ngai,mpe bato oyo balukaka koboma ngaibasaleli ngai likita.11Bazali koloba : « Nzambe asundoli ye ;bolanda ye, bokanga ye ;moto oyo akokangola ye azali te ! »12Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te !Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.13Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa !Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngaibasambwa mpe bayokisama soni !
14Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonsompe nakokoba kokumisa Yo.
15Monoko na ngai ekosakola tango nyonsomisala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo,pamba te nayebi motango na yango te.16Nkolo Yawe, nakoya epai na Yompe nakotatola misala na Yo ya nguya ;nakotatola misala malamu ya bosembo na Yo,misala ya bosembo na Yo kaka.17Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ;mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.18Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobangempe suki na ngai ekomi pembe,oh Nzambe na ngai, kotika ngai te,mpo ete natatola makasi na Yoepai ya bato ya ekeke oyo,mpe misala ya nguya na Yoepai ya bato nyonso oyo bakoya sima.19Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo,pamba te osalaka makambo minene.Oh Nzambe, nani akokani na Yo ?20Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo,kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi,okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.21Okomatisa lisusu lokumu na ngai,mpe okobondisa ngai lisusu.
22Nzambe na ngai, nakosanzola Yona lindanda mpo na boyengebene na Yo ;Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindandampo na lokumu na Yo.23Nakoganga na esengo tango nakoyembabanzembo mpo na lokumu na Yo,pamba te okangoli bomoi na ngai.24Lolemo na ngai ekotatola tango nyonsomisala ya bosembo na Yo,pamba te bato oyo balukaka pasi na ngaibayokisami soni mpe basambwe.