Banzembo70lin_bib

Nzambe, yaka kosunga ngai

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.2Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai !Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !3Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngaibakufa soni mpe basambwa !Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngaibazonga sima mpe bayokisama soni !4Tika ete bato oyo balobaka na ngai :« Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !5Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yobatonda na esengo mpe basepela kati na Yo !Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yobalobaka tango nyonso :« Nzambe azali monene ! »
6Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela,Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai.Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai,kowumela te !