Banzembo65lin_bib

Opesaka bofuluki

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.2Mpo na Yo Nzambe,bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ;mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.3Yo oyo oyokaka mabondeli,bato nyonso bakoya epai na Yo.4Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ;kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.5Esengo na moto oyo oponi mpe obulisimpo ete avanda kati na lopango na Yo.Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo,Tempelo na Yo ya bule.
6Nzambe Mobikisi na biso,oyanolaka biso na bosembo,na nzela ya biloko ya somo ;Ozali elikya ya mokili mobimbampe ya bibale minene.7Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ;atondi na mpiko.8Akitisaka makelele ya bibale minene,makelele ya bambonge na yangompe makelele ya bikolo.9Bato oyo bavandaka na basuka ya mokilibabangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ;osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.
10Opambolaka mabele, ofulukisaka yango,otondisaka yango na bozwi.Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi,obongiselaka bato ble,pamba te otondisaka mayi mpo na yango.11Olekisaka mayi kati na mikala,okweyisaka mipiku ya mabele,osopelaka mabele mayimpe opambolaka milona.12Opambolaka mobu na bolamu na Yo,mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.13Bilanga ya esobe etondaka na bilei,mpe bangomba mike etondaka na esengo.14Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ;mabwaku etondaka na ble,egangaka na esengo mpe eyembaka.