Banzembo64lin_bib

Batela ngai

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.2Oh Nzambe, yoka mongongo na ngaikati kolela na ngai,batela ngai mosika ya mongunaoyo azali kopesa ngai somo.
3Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe,mosika ya makita ya bato ya misala mabe.4Bapelisaka lolemo na bangondenge bapelisaka mopanga,babimisaka maloba ya bololo lokola makonga5mpo na kobwakela, na kobombama,moto oyo azangi pamela ;babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.6Balendisanaka mpo na mabongisi mabe,bayokanaka kotia mitambo ;balobaka : « Nani akomona yango ? »7Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe,balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! »Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
8Kasi Nzambe akobwakela bangomakonga na Ye na mbalakata ;ekozwa mpe ekozokisa bango.9Maloba na bango moko ekobalukela bangompe ekomema bango na libebi ;mpe moto nyonso oyo akomona bangoakoningisa moto.10Bato nyonso bakokoma kobanga,kopanza sango ya misala ya Nzambempe kososola makambo oyo asalaka.
11Moto ya sembo akosepelampe akomibomba kati na Yawe ;bato nyonso oyo bazali na mitema alimabakomikumisa mpo na yango.