1Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.2Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ;nazali koluka Yo,molimo na ngai ezali na posa na Yo,bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi,kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.3Natalaki Yo kati na Esika ya bulempo na komona makasi mpe nkembo na Yo.4Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,bibebu na ngai ekosanzola Yo.5Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba,nakotombola maboko na ngaimpo na lokumu ya Kombo na Yo.6Nakotonda lokola moto oyo asili koliamisuni kitoko mpe mafuta ;bibebu na ngai ekoganga na esengompe monoko na ngai ekokumisa Yo.7Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai,nasambelaka Yo na butu ;8pamba te ozali lisungi mpo na ngai,mpe nagangaka na esengowana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.9Nakangami na Yo ;loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.10Bato oyo balukaka koboma ngaibakozinda na mabele11Bakoboma bango na mopangampe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.12Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe ;moto nyonso oyo alapaka ndayina Kombo ya Nzambeakomikumisa mpo na yango,pamba te minoko ya bakosi ekokangama.