Banzembo62lin_bib

Nazwaka na kimia kati na Nzambe

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.2Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.3Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;azali ebombamelo na ngai,nakoningana te.
4Kino tango nini bokosangela moto moko ?Kino tango nini bino nyonso bokosanganampo na koluka koboma yelokola mir oyo etengami,lokola lopango oyo esili kokweya ?5Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa yewuta na esika na ye ya likolo,basepelaka kotatola lokuta.Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
6Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe,pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.7Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.8Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngaiezali kati na Nzambe.9Botielaka Ye elikya tango nyonso,bosopaka mitema na bino liboso na Ye,pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
10Solo, bato bazali lokola molunge,bazali lokola lokuta ;Soki batie bango na emekelo kilo,ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.11Botiaka elikya te na mileki ya moyibi,mpe botielaka yango motema te ;soki bomengo na bino ekomi ebele,bokangama na yango te.
12Nzambe alobaki mbala moko,ngai nayokaki mbala mibale :« Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;13mpe bolingo ezali ya Nkolo ; »mpe « ofutaka moto nyonsokolanda misala na ye. »